Charles Mombaya – Eyano

Charles Mombaya Eyano

Charles Mombaya – Eyano Lyrics

Artist: Charles Mombaya
Song: Eyano

Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu
Bamokili bakokamua pona nini ngai nasalelaka Yesu
Oh
Bato bakotunaka nga pona nini ngai nalandaka Yesu

Bamokili bakokamua pona nini ngai nasalelaka Yesu
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko
Nkolo apesi nga kimia na motema

Nkolo apesi nga bomoyi na seko
Tala tina
Aniokwami pe afingamaki
Mpo nga nazuwa bomoyi na seko

Na Golgotha makila na Yesu
Esopanaki mpo nabika
Oh pasi ye amonelaki nga
Yesu Masiya na nga

Na yango nakosalela Masiya tango nionso ata pasi
Na yango nakosalela Nkolo na nga tango nionso kino suka
Mpo Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya

Mpo Yesu amemaki pasi na nga
Ngai pe nakobila se ye
Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko [Oh, oh Masiya

Nkolo apesi nga kimia na motema [Kimia, oh apesi nini oh
Nkolo apesi nga bomoyi na seko [Bomoyi, oh
Tala tina [Tala tina]
Ata bato bapekisi nga

Nakolanda kaka Masiya
Ata ba camarade baboyi ngai
Nakoki te kotika Masiya
Ata ko nakoti boloko

Nakoki te nga nawangana Yesu
Na yango nakosalela ye Nkolo kino suka ata pasi
Na yango nakobila ye Masiya tango nionso kino azonga
Mpo Yesu alingi nga mingi

Ngai pe nalingi Masiya
Mpo Yesu amemaki pasi na ngai
Ngai pе nakobila Yesu
Eyano

Nkolo asungi nga kati na minioko [Oh, oh Masiya
Nkolo apesi nga kimia na motema [Kimia, oh apеsi nini oh
Nkolo apesi nga bomoyi na seko [Bomoyi, oh
Tala tina [Tala tina]

Bamokili bazali bakokamua
Bolingo na nga na Masiya
Basusu bazali komituna
Tina nini nakangama na Yesu

Babosani ete azali nzela
Oyo ekomemaka na mboka na lola
Na yango nakotalela ye Nkolo tango nionso mpo nabika
Na maboko na ye kobanga esili nazui kimia pe lobiko

Mpo Yesu alingi nga mingi
Ngai pe nalingi Masiya
Mpo Yesu amemaki pasi na nga
Ngai pe nakobila se ye

Eyano na nga
Nkolo asungi nga kati na minioko [Oh, oh Masiya
Nkolo apesi nga kimia na motema [Kimia, oh lisusu nini
Nkolo apesi nga bomoyi na seko [Bomoyi, oh

Tala tina [Tala tina]
Find more lyrics at https://dcslyrics.com

You can purchase their music thru
DCSLyrics.com Amazon Music    DCSLyrics.com Apple Music
Disclosure: As an Amazon Associate and an Apple Partner, we earn from qualifying purchases

Charles Mombaya Lyrics – Eyano

Please support our site by sharing it.
And please follow our site to get the latest lyrics for all your favourite songs.